Pular para o conteúdo
Publicidade

João 4

46 Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela. 47 Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.

48 Yesu alobaki na ye :

Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?

49 Mokonzi wana ya basoda alobaki :

Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.

50 Yesu alobaki na ye :

Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi.

Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.

51 Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye :

Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.

52 Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki.

Bazongisaki :

Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.

53 Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi» Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.

54 Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.

Veja também