Pular para o conteúdo
Publicidade

João 5

Yesu abikisi ebosono

1 Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda. 2 Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida» Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango. 3 Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana, 4 pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]5.4 Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.

5 Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe. 6 Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye :

Olingi kobika ?

7 Mobeli azongiselaki Ye :

Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.

8 Yesu alobaki na ye :

Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.

9 Kaka na tango yango, moto yango abikaki ; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola.

Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.

Veja também