66 Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.
67 Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale :
— Boni, bino mpe bolingi kokende ?
68 Simona Petelo azongisaki :
— Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko. 69 Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.