3 Bandeko ya Yesu balobaki na Ye :
— Longwa awa na Galile mpe kende na Yuda, mpo ete bayekoli na Yo bamona kuna bikamwa oyo ozali kosala. 4 Moto moko te asalaka na nkuku soki alingi koyebana. Lokola ozali kosala makambo minene koleka, sala ete moto nyonso kati na mokili ayeba soki ozali nani.
5 Pamba te, ezala bandeko ya Yesu, bango mpe bazalaki kondima Ye te.