Yesu abikisi mokufi miso
1 Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. 2 Bayekoli na Ye batunaki Ye :
— Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?
3 Yesu azongisaki :
— Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. 4 Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. 5 Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
6 Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso 7 mpe alobaki na ye :
— Kende kosukola na liziba ya Siloe.
Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
8 Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba :
— Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ?
9 Bamoko bazalaki koloba :
— Ezali ye !
Bamosusu :
— Te, ezali ye te ; akokani na ye !
Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba :
— Ezali ngai !
10 Bongo batunaki ye :
— Miso na yo ebikaki ndenge nini ?
11 Azongiselaki bango :
— Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe. » Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.
12 Batunaki ye lisusu :
— Moto yango azali wapi ?
Azongisaki :
— Nayebi te !