Pular para o conteúdo
Publicidade

João 9

Yesu abikisi mokufi miso

1 Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. 2 Bayekoli na Ye batunaki Ye :

Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?

3 Yesu azongisaki :

Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. 4 Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. 5 Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.

6 Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso 7 mpe alobaki na ye :

Kende kosukola na liziba ya Siloe.

Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.

Veja também