18 Bayuda baboyaki kondima ete azalaki liboso mokufi miso mpe ete abiki. Boye, babengaki baboti na ye 19 mpe batunaki bango :
— Mobali oyo azali mwana na bino ? Boni, abotama solo mokufi miso ? Ndenge nini sik’oyo akomi komona ?
20 Baboti na ye bazongisaki :
— Toyebi ete azali mwana na biso mpe ete abotama mokufi miso ; 21 kasi mpo na oyo etali koyeba ndenge nini akomi komona sik’oyo mpe nani abikisi ye, toyebi eloko te. Botuna ye moko. Azali mokolo ; akoloba na tina na ye moko.
22 Baboti na ye balobaki bongo mpo ete bazalaki kobanga Bayuda, pamba te Bayuda basilaki kozwa mokano ya kobengana, na ndako na bango ya mayangani, moto nyonso oyo akondima ete Yesu azali Klisto. 23 Yango wana baboti na ye bazongisaki : « Botuna ye moko, azali mokolo. »