Sango ya mbotama ya Yesu
26 Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » 27 Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. 28 Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :
— Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !
29 Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini.
30 Kasi anjelu alobaki na ye :
— Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! 31 Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » 32 Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. 33 Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.
34 Mari atunaki anjelu :
— Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ?
35 Anjelu azongiselaki ye :
— Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. 36 Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. 37 Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
38 Mari azongiselaki ye :
— Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai !
Bongo anjelu akabwanaki na ye.