Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 1

46 Bongo Mari alobaki :

Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,

47 mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,

48 pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.

Yango wana, kobanda lelo,

bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,

49 pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;

Kombo na Ye ezali Bule.

50 Atalisaka boboto na Ye tango nyonso

epai ya bato oyo batosaka Ye.

51 Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye,

apanzi bato oyo batonda na lolendo,

52 akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi,

kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.

53 Atondisi na biloko ya malamu

bato oyo bazalaki na nzala,

mpe azongisi bazwi maboko pamba.

54 Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye,

abosani te kotalisa boboto na Ye,

55 ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso,

epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye,

mpo na tango nyonso.

Veja também