17 Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki :
— Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo !
18 Yesu azongisaki :
— Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali. 19 Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe. 20 Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.
Bolamu ya bayekoli
(Mat 11.25-27)