29 Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino. 30 Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango. 31 Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.