Lisese ya meme oyo ebungaki mpe emonani
1 Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye. 2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba :
— Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango.