Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 15:11-13,20,22,24

Lisese ya mwana oyo abungaki mpe amonani

11 Yesu alobaki lisusu :

— Mobali moko azalaki na bana mibali mibale. 12 Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. »

Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.

13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.

20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.

22 Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. 24 pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »

Boye babandaki feti na esengo makasi.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.