Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 15:11-24

Lisese ya mwana oyo abungaki mpe amonani

11 Yesu alobaki lisusu :

— Mobali moko azalaki na bana mibali mibale. 12 Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. »

Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.

13 Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu. 14 Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.

15 Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu. 16 Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.

17 Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala ! 18 Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo. 19 Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »

20 Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.

21 Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »

22 Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. 23 Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti, 24 pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »

Boye babandaki feti na esengo makasi.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.