12 Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika 13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi :
— Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki :
— Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !
Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. 15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. 16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
17 Bongo Yesu atunaki :
— Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ? 18 Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?
19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari :
— Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !