Publicidade

Lucas 17

14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki :

Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !

Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. 15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. 16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.

17 Bongo Yesu atunaki :

Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ? 18 Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?

19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari :

Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !

Veja também

Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-