3 Bosala penza keba mpo na bolamu na bino !
Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye ; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye. 4 Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo : « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye !