Pular para o conteúdo
Publicidade

Luka 18

Yesu abikisi mokufi miso

35 Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. 36 Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki :

Likambo nini oyo ezali kosalema ?

37 Balobaki na ye :

Yesu ya Nazareti azali koleka !

38 Agangaki :

Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

39 Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka :

Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !

40 Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye :

41 Olingi nasala nini mpo na yo ?

Mokufi miso azongisaki :

Nkolo, nalingi komona.

42 Yesu alobaki na ye :

Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.

43 Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.

Estes versículos te tocaram? Ore agora!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.

Veja também