Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 2

Simeoni ayambi Masiya kati na Tempelo

25 Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. 26 Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo.

27 Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki, 28 Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo :

29 « Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo,

tika ete mowumbu na Yo akende na kimia !

30 Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi

oyo awuti epai na Yo,

31 Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso :

32 pole mpo na kongengisa bikolo,

mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele»

Veja também