Yesu kati na Tempelo
41 Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika. 42 Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano.
43 Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi ; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali. 44 Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. 45 Kasi bamonaki Ye te ; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi.
46 Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna. 47 Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye. 48 Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye :
— Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !
49 Yesu azongiselaki bango :
— Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?
50 Kasi basosolaki te maloba na Ye.
51 Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye. 52 Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.