22 Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ?
23 Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango :
24 — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ?
Bazongisaki :
— Ya Sezare !
25 Yesu alobaki na bango :
— Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !