Petelo awangani Yesu
54 Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika. 55 Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
56 Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki :
— Tata oyo azalaki elongo na Yesu !
57 Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki :
— Mwasi, nayebi ye te.
58 Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki :
— Yo mpe ozali moko kati na bango !
Petelo azongisaki :
— Tata, nazali moko te kati na bango.
59 Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende :
— Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60 Kasi Petelo azongisaki :
— Nayebi te makambo oyo ozali kolobela !
Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki. 61 Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. » 62 Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.