33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34 Yesu alobaki :
— Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala 23.34 Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala. .
Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. 35 Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki :
— Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe !
36 Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi 37 mpe balobaki :
— Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko !
38 Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo :
Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
40 Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! 41 Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42 Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43 Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.