39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye :
— Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso !
40 Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye :
— Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! 41 Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42 Bongo alobaki lisusu :
— Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43 Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
(Mat 27.45-56; Mlk 15.33-41; Yn 19.25-30)