Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 6

6 Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. 7 Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.

8 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko :

Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso !

Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.

9 Bongo Yesu alobaki na bato mosusu :

Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?

10 Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko :

Sembola loboko na yo !

Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.

Veja também