Yesu asekwisi elenge mobali
11 Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini ; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye. 12 Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango. 13 Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye :
— Kolela te !
14 Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki :
— Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !
15 Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye. 16 Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba :
— Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye !
17 Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga.