43 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango. 44 Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
45 Yesu atunaki :
— Nani asimbi Ngai ?
Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu :
— Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
46 Kasi Yesu alobaki :
— Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
47 Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye. 48 Kasi Yesu alobaki na ye :
— Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.