Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 8

49 Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki :

Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.

50 Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi :

Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.

51 Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana. 52 Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki :

Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !

53 Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa. 54 Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki :

Mwana na Ngai, lamuka !

55 Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia. 56 Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.

Veja também