Pular para o conteúdo
Publicidade

Lucas 9

27 Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.

Nzoto ya Yesu ebongwani

28 Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.

29 Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali. 30 Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya 31 oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.

Veja também