23 Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga :
24 — Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe !
25 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo :
— Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.
26 Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga.