13 Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango.
14 Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli :
— Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango. 15 Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.
16 Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango.
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
(Mat 19.16-30; Lk 18.18-30)