Jake mpe Yoane basengi esika ya lokumu
35 Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :
— Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo.
36 Yesu atunaki bango :
— Bolingi ete nasalela bino nini ?
37 Bazongisaki :
— Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi.