Yesu abikisi Bartime, mokufi miso
46 Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga. 47 Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga :
— Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
48 Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi :
— Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
49 Yesu atelemaki mpe alobaki :
— Bobenga ye !
Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye :
— Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !
50 Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu. 51 Yesu alobaki na ye :
— Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki :
— Moteyi, nalingi komona.
52 Yesu alobaki na ye :
— Kende, kondima na yo ebikisi yo.
Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.