Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 11

Yesu akoti na Yelusalemi

1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale, 2 alobaki na bango :

Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa. 3 Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango »

Bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango»

Mpe na mbala moko, akotinda yango awa.

4 Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke ; mpe bafungolaki yango. 5 Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki :

Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane ?

6 Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango. 7 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga.

9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga :

« Ozana !

Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo !

10 Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama,

bokonzi ya Davidi, tata na biso !

Ozana na bisika oyo eleki Likolo »

11 Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale.

Veja também