Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 14

22 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki :

Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa.

23 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango. 24 Bongo alobaki na bango :

Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele. 25 Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.

Veja também