30 Yesu azongiselaki ye :
— Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.
31 Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki :
— Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te.
Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko.
Yesu abondeli na Getisemane
(Mat 26.36-46; Lk 22.40-46)