Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 3

Yesu abikisi na mokolo ya Saba

1 Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. 2 Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye. 3 Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko :

Telema na liboso ya bato nyonso.

4 Atunaki bango :

Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?

Kasi babatelaki kimia.

5 Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango :

Sembola loboko na yo !

Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.

Veja também