Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 4

3 « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona. 4 Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. 5 Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te. 6 Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te. 7 Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te. 8 Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko» 9 Yesu azalaki lisusu koloba : « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka »

Veja também