Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 4

Yesu aleki mopepe na makasi

35 Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.

36 Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. 37 Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. 38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.

Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :

Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?

39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :

Tika makelele ! Vanda nye !

Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.

40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :

Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?

41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye »

Veja também