38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.
Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :
— Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?
39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :
— Tika makelele ! Vanda nye !
Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?