Yesu aleki milimo mabe na makasi
1 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, 2 Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. 3 Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; 4 pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. 5 Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
6 Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye 7 mpe agangaki na makasi nyonso :
— Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
8 Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »
9 Yesu atunaki ye :
— Kombo na yo nani ?
Azongisaki :
— Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !
10 Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. 11 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
12 Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
13 Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
14 Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.