22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi :
— Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango !
23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye :
— Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai.
24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye :
— Mama, nasenga nini ?
Mama na ye azongisaki :
— Senga moto ya Yoane Mobatisi.
25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye :
— Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi.
26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango. 27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane, 28 amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye.