Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 6

Bantoma bazongi

30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki.

31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke»

32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama.

Yesu aleisi mibali nkoto mitano

33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende. 34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele.

35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye :

Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe ! 36 Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.

37 Kasi Yesu azongisaki :

Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.

Bayekoli balobaki na Ye :

Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?

38 Yesu atunaki bango :

Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala.

Bakendeki kotala mpe balobaki :

Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.

39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. 40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. 41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. 42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. 43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. 44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.

Veja também