Pular para o conteúdo
Publicidade

Marcos 7

11 Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe» 12 akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo. 13 Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.

14 Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango :

Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo. 15 Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [

Veja também