6 Yesu azongiselaki bango :
— Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama :
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,
kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;
7 basambelaka Ngai kaka na pamba,
mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
8 Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.