Yesu abikisi mokufi miso
22 Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye. 23 Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye :
— Boni, omoni eloko ?
24 Moto yango atalaki mpe alobaki :
— Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola.
25 Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.
26 Yesu alobaki na ye :
— Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.