26 Yango wana, bobanga bango te ! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana. 27 Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako. 28 Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo. 29 Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke ? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te. 30 Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino. 31 Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.
Publicidade