34 Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga. 35 Pamba te, nayaki mpo na kotia bokabwani
kati na mwana mobali mpe tata na ye,
kati na mwana mwasi mpe mama na ye,
mpe kati na mwasi ya libala mpe mama-bokilo na ye :
36 banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.
(Mlk 8.34-35; Lk 9.23-24; 14.26-27)
37 Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.