Libota ya solo ya Yesu
46 Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye. 47 Bongo moto moko ayebisaki Yesu :
— Mama mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya kosolola na yo.
48 Kasi Yesu azongiselaki ye :
— Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai ?
49 Bongo Yesu atalisaki loboko na Ye na ngambo ya bayekoli na Ye mpe alobaki :
— Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, bango oyo ! 50 Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.