Pular para o conteúdo
Publicidade

Mateus 13

14 Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami :

« Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;

miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !

15 Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;

bakangi penza matoyi mpe miso na bango,

noki te miso na bango emona,

matoyi na bango eyoka,

mitema na bango esosola,

mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango»

16 Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.

Veja também